Psalms 144

Bato na yo bazali na esengo

Nzembo ya David


1 Masanzoli ezala epai na Yawe,
libanga na ngai ;
Oyo alakisaka maboko na ngai
mpo na etumba,
mpe misapi na ngai mpo na kobunda etumba.

2 Ye azali Nzambe na ngai ya bolingo,
mpe esika ya makasi epai nabombamaka ;
ye azali esika na ngai epai nakimelaka
mpe ye moto akangolaka ngai ;
ye azali ebende na ngai ya makasi
oyo ebatelaka ngai,
mpe nabombamaka epai na ye ;
Ye moto atiaki bato
na se ya bokonzi na ngai.

3 Ee Yawe, moto azali nani mpo okokanisela ye ?
Mwana ya moto mpo okanisa ye ?

4 Moto azali lokola mopepe ;
mikolo na ye ezali lokola elilingi
oyo ezali koleka.

5 Kabola likolo na yo, Yawe mpe kita,
simba bangomba,
mpo ekobimisa milinga !

6 Tinda kongenga ya kake,
mpe panza banguna na ngai ;
bwaka makonga na yo, mpe bungisa bango nzela.

7 Kitisa maboko na yo wuta na likolo ;
kangola ngai mpe sikola ngai
na bamayi ya makasi, na maboko ya bapaya,

8 baoyo minoko na bango etondi na makambo ya kokosa,
baoyo maboko na bango ya mibali ezali na lokuta.

9 Nakoyembela yo nzembo ya sika Nzambe ;
Na lindanda ya basinga zomi na kobeta miziki mpo na yo.

10 Epai ya moto oyo opesaka elonga na bakonzi ;
moto oyo okangolaka mosali na yo David
na mopanga oyo ebomaka.

11 Kangola ngai mpe sikola ngai na maboko ya bapaya,
baoyo minoko etonda na makambo ya kokosa,
baoyo maboko ya mibali
ezali na lokuta

12 Bongo bana na biso ya mibali
kati na bolenge na bango,
bakozala lokola milona oyo ezali kokola malamu penza ;
mpe bana na biso ya basi bakozala lokola makonzi
oyo babongisa malamu penza,
mpo na kobongisa esika.

13 Bibombameli na biso
ekotonda na bilei ya ndenge na ndenge ;
bameme na biso ekobakisama
bankoto zomi kati na bilanga na biso ;

14 bangombe na biso ekomema mikumba ya kilo penza.
Ekozala lisusu te madusu na bamur,
bakomema biso na bowumbu lisusu te
mpe kolela mpo na bapasi ekozala lisusu te
na babala-bala na biso.

15 Mapamboli ezala na bato oyo makambo oyo ezali solo ;
mapamboli ezala na bato oyo Yawe azali Nzambe.
Copyright information for LinMNB